MITUNA YA MOMESANO.

Bokoki koleka na ndako na biso ya mosala kopesa biso batoli na ndenge ya singa to lisusu kotindela biso lisolo to bipele misusu na nzela ya nsinga.

Na ndelo oyo tolongi kolakisa bana mpe baboti ete lingala ezali monoko ya mobola. Bana na biso bayekolaka na lolendo na lingala nzokande tango tobandaki ezalaki monoko moko ya soni po na bango.

Bayekolaka nzebi ya banzete, lisolo ya Kongo, ya Afrika, kotuya, lolenge nini bakoki kokela, kotanga mpe koloba lingala… Toyekolisaka bana kaka makambu oyo etali Afrika mpe mboka na biso Kongo.

Te, na ngonga oyo lokola eteyelo ya lolenge mususu tokutana na bana kaka mokolo ya poso mpo nanu tokeli eteyelo penza ya monene te po na koyamba bana na lolenge ya kelasi.

Moboti to moyangeli aza na posa mwana na ye azua boyebi na eteyelo. Lokola bana na biso ya Toyekola bayekolaka mpe bakolisaka babongo na bango, baboti basilikaka te, basepelaka nde.

Lokola ezali eteyelo ya lolenge mususu, tosalelaka esalele oyo babengaka etangiselo ya kokokanisa ( pédagogie adaptée ), tozuaka mwana wuta emoniseli na ye mpe ndeko ya mayele na ye po na koyekolisaye banzebi oyo totangisaka. Mwana oyo azoloba falase, toyekolisaka ye lingala moke moke kaka na kati ya kelasi mpe totiakaye ye na ndelo moko ya koyamba mateya na bana banso ya Toyekola oyo batangaka na lingala.

Iyo, neti sikoyo na sanza ya ntúku mibale bana bakeyi kopema po basepela na baboti suka ya mbúla mpe bakozongela kelasi na Toyekola na sanza ya liboso ya mbúla oyo ezoya.

Mokanda ya lokumu ( certificat d’honneur ) na mbula manso epayi ya bana oyo bazoyekola bayekoli malamu.

-Esengeli mwana azala Kongole.
– Moboti to mayangeli na ye azala enana ya Bosangani oyo ezanga elandelami ya mbano na biso (ASBL Toyekola)

Ozali na motuna ?

Komela biso motuna na yo soki ezwami na nkondo ya mituna na mopanzi te.

KOZUA BISO

Ndako ya mosala

Adresse : 38, av. NGAMBALI 
Q.Kingasani, C. Kimbaseke/ RD Congo

E-mail : libota@toyekola.net

Téléphone : +243 899 837 673

KOZUA BASANGO NA BISO

Mikomisa na nzela ya E-mail pona kozua basango nionso ya TOYEKOLA.

Toyekola © 2022. Bisengeli banso ezali ya kobatelama