Engebene na mabongisano na biso ya bamposo inso ; tosangisaka bana ya Komine ya Kimbanseke na bozo baoyo ya Kingasani po na koyekolisa bango banzebi ya Kongo na lingala. Po na mokolo ya poso oyo ya 24-09-2022 malakisi ya nzebi oyo topesaka bana etokamaki na nzebi ya banzete. Ezalaki bongo na ntina ya kopesa bana likanisi moko ya kofongwama ya bomoi ya elona na lingala.
Bantina ya kotangisa oyo tozolanda na bokutani oyo ezali misato, ya koyeba :
Kopesa bana mayele po bayeba ete mokili ya elona oyo ezali nzinganzinga na bango ezali nzebi oyo ezosenga na bango balanda yango na alima, bapusa nzebi yango mpo yang onde ezali kosunga bango mpe bato nyinso ya mokili bazala na nzoto kolongono ;
Kosunga bango bayeba bakombo ya biteni inso ya banzete na lingala ;
Kosala na bango bayangeli oyo bakobatela nzinganzinga ya elona mpe kotonga boyokani ya malamu na yango.
Bana balandaki malakisi ya mokolo malamu. Na suka ya malakisi tata molakisi alandelaki po na kotala ndelo ya esos