Mbela na bana ya kelasi ya Congo

Elombe !

Tala lolenge mboka ekomi ndenge.

Tala lolenge ya yo ekolo ebungisi ngenge.

Congo ya Lumumba, lelo ya loyenge;

Buluyeke eke-ezongi Mokonzi, mongamba toyaba te nani aza nani.

Pasi kaka !

Tolela epa ya nani ?

Biso moko bana na nana !

Tolenda kaka mpo esika ya kokima ikele ve.

Yango,

Yo lokola ozali kokende kelasi,

Yeba ete kuna okeyi maseki te;

Okeyi kokolisa mayele mpo na kobongisa mboka.

Lobi biso tokozala te, kasi yo okozala.

Mayele mpe bwanya na yo nde ekonza Yeba !

Mpe yeba lisusu !

Cheick anta Diop aloba : « Ndokisama na nzebi kino na lino »

Bienvenu Sene mpe aloba : « Salela bongo »

Ngai mpe lelo nayebisi yo : « kaka na koyekola nde okokola mpe okolisa mboka na yo. Libanda ya nzebi bomoyi ezali te »

Totindi yo na kelasi mpo oyekola kokonza bandeko na yo te.

Totindi yo na kelasi mpo oyiba nkita ya mboka na yo te.

Totindi yo na kelasi mpo omona pamba bokoko na yo te.

Yeba !

Lenda !

Tosa !

Mpe Bika sembo !

Botangi elamu mwana ya Congo !

 

 

 

 

 

 

Elili ya ndeko Ruben en reportage

 

Molakisi Edimo Lumbidi

Bana ya eteyelo ya Congo :

 

Mampinga ya Congo ya lelo.

Elikya ya lobi ya Congo.

Bakambi ya lobi oyo ekoya ya Congo.

Mpe bakoko ya Congo ya ndele.

Mboka ezali na etumba; etumba ya makofi kaka na kotala kasi na bosolo ezali etumba ya bozangi boyebi; bozangi boyebi ya lisapo ya ekolo na biso.

Tata, mama, yaya, molakisi ! Tango ebelemi mpo na koyekolisa bana na biso lisapo, nzebi mpe bobiso ya mboka na biso. Pamba te « soki oyebi esika owuta te, okoyeba mpe te esika ozali na esika ozali kokende. »

Bana na biso lobi bazongaki kelasi. Bazali na posa eteyelo ya Congo ekomisa bango bapaya na Congo mpe ya Congo te. Mwana ya Congo azali na ntina ya koyeba Christophe Colomb te koleka lolenge azali na bosenga ya koyeba Lumumba. Mwana ya Congo azali na bosenga ya koyeba na molongo lingala na esika ya français pamba te ye esengeli ayeba na mozindo mokili oyo ye abengami kobika mpe kopusa o boso.

Soki tokoki kosenga eloko moko na bakambi ya bobokoli ya Congo : botika kosala lompete ya bowangani bobiso na biso.

Na bana na biso totombeli biso

« Bozongi eteyelo elamu !

Bobosana te ete bozali koyekola mpo na koyanola mikakano ya mboka na biso mpe kopusa yango o boso.

 

– Ndimbo : lexiques

Eteyelo : école

Mampinga : les militaires

Elikya : espoir

Bakambi : les dirigeants

Ndele : avenir

Lompete ya bowangani bobiso : aliénation culturelle

Kopusa o boso : faire évoluer.

Malakisi ma mitango

Na lingala nzebi ya mituya ezalaka mpasi mingi te lokola na français.

Na lingala mpo na koyekola kotuya esengeli kaka koyeba kosangisa mituya na mitango na liboke lyoko.

Ndakisa :

Libungutúlú
Mòkò
Mibále
Misáto
Minei
Mitáno
Motobá
Nsámbo
Mwambe
Libwá
Zomi

Tokosangisa yango boye mpo na ekoma liboke lyoko :

Zomi ná mòkò lokola 10+1. Kasi na français epesakabiso nkombo boïké : onze.

Omoni bokeseni ?

Ntúku mibale : zomi mbala mibale. Kasi na français epesi kaka nkombo mòkò « vingt » ezanga limbola.

Soki tozoyekola mituya na lingala, bana bakososola malamu mpo ndimbola ezali polele.

Ntúkú misato na libwa ezali nini na français ?

Apprenez la mathématique en lingala avec Molakisi Edimo Lumbidi

Ndako ya buku Aequatoria

Ndako ya buku « Aequatoria » oyo ezwami na etuka ya Mbandaka na mboka Bamanya, ezali ndako ya buku ya liboso mpe ya monene na Afrika ya kati-kati.

O mokolo mwa 16 Novembre mobu 2023, molakisi Edimo Lumbidi na etinda na ye ya moluki o kati ya eteyelo Toyekola, akendaki kotala ndako ya buku oyo ezuami na etuka ya Mbandaka na mboka Bamanya. Kuna nde tokundolaki buku ebele iye izali kolobela maye matali masapo, nkota, nzebi ya Afrika. Na bokomi na esika eye, bayangeli ba yango batalisaki biso ete ndako ya buku oyo efongwama wuta 1937 na ntango babelesi bazali na mboka na biso, esalaka lisusu te wuta mobu 2015 mpo ete bakambi ya mboka batiayaka lisusu misolo te mpo na kobongisa yango na lolenge lolenge esengeli.

NTWALI, MWANA YA EKILA

Ntwali ezali molongo ya buku mpo ya bana.
Ekozala kobima sima ya sanza misato.
Ezali litangi kitoko mpe lisano, ekopesa bana boyebi ya mboka ya Afrika.
Ezali lisapo ya bikamwa kasi mingi penza ezali mobembo moye mokotambuisa bana mpo bayeba bizaleli bia mboka ya Afrika.
Ekomami liboso na lingala kasi tobaloli lisapo liango o lokota la kifranse mpo ete mingi bakoka kososola.    

Mwana oyo ayokaka bakolo, akolaka koleka mbula ya ye

Mwana oyo ayokaka bakolo, akolaka koleka mbula ya ye.
Lelo ezalaki kaka mokolo mwa esengo te, kasi mpenza mokolo mwa koyekola, mpo ya kokolisa boyebi bwa biso.
Nini toyekoli te lelo? Toli nini tosilisi te mpenza?
Tokanisaki ete mobembo o mboka ya bawa, epai ekenda Molakisi wa biso Sene Mongaba mpe bakulutu basusu ba bobõngo ( scientifiques) bwa biso, mozalaki mpo ya biso, suka ya boyekoli makambo mabelé. Nzokande ezalaki solo te. Na se ya moyi mwa lelo, libaku lipesemelaki biso lisusu ya kokambama epai ya mama Marie-Eugénie Mpongo. Epai ya ye totoki mpe tozali kokoba kotoka ebele ya boyebi boye bozali na bongo bwa ye, na likanisi lya kokabola boyebi bôná na bana banso ba eteyelo  “Toyekola”, mpo na kotombola mpe kokamba solo Kongo ya lobi na bonsomi bonso.
Botondi mingi na mama Eugénie  mpo na malakisi.
Molakisi Edimo Lumbidi, Monkutu Banso
( Secrétaire Général).
Eteyelo Toyekola

Na lolenge nini bandeko ya Afrika bakoki kopesa biyano na bakwokoso yaAfrik na nzela ya Afrika bo-ekolo ?

Na lolenge nini bandeko ya Afrika bakoki kopesa biyano na bakwokoso yaAfrik na nzela ya Afrika bo-ekolo ?
– Bandeko ya diasa-diasa (diaspora) bakoki kopesa eyano ya malamu ya litombwami ya Afrika na tango oyo bago moko nanu bisika bazuami bazobosa te ete poto ezali mabele na bango te, kuna bakenda nde kaka moluka ;
– esengeli bayeba ete bosnomi na bango ya solo ezali kaka na Afrika na yango bango bazali na lisenginya ya kozua mayele pe bozui ya lolenge nyonso oyo bakoki kozala na yango, mpe bazonga na yango na Afrika po esunga na litombwami ya mokili na biso. Ezali na bangonga manso te nde tokozalaka kaka kobika epayi ya bapaya. Tobongisa mokili na biso po biso mpe bana na biso lobi tobika nsomi epayi na biso moko ;
– Esengeli bazua esika na bango kuna. Bobiso na biso esengeli ezala wana. Bakela milulu ya minene oyo ematisaka miziki na biso, balokota na biso mpe bantoki na biso misusu ;
– Esengeli bayebaka kozua bandeko oyo babikaka na afrik lokola baninga ya misala oyo na lisanga tokoki kosangana mpe koyanola bakwokoso ya Afrik. Ezali na litomba moko te kozongaka na afrik lokola « badjika » elingi koloba bato oyo baleki bato misusu na kitoko, na bozui, na mayele, na bopeto, to nini. Wana ekosunga afrika te;
– Esengeli likanisi ya afrika bo-ekolo ezala kaka liloba te oyo elobamaka tangu ya bikutani na biso na biso kasi esengeli ezala penza mama na likambo oyo ezosala été moto na moto esika azuami ayeba kozala libonza po na afrika bo-ekolo ezua esika makasi na afrik mpe na mikili ya poto;
– (…)
Makanisi ezalaki ebele kasi totie mua ndambo awa.
Wana ezalaki mua libonza na biso na bokutani oyo ebongisamaki na na bandeko ya Tondo ya bobiso André Blouin mokolo ya poso ya 25-fevrier-2022.

KOZUA BISO

Ndako ya mosala

Adresse : 38, av. NGAMBALI 
Q.Kingasani, C. Kimbaseke/ RD Congo

E-mail : libota@toyekola.net

Téléphone : +243 899 837 673

KOZUA BASANGO NA BISO

Mikomisa na nzela ya E-mail pona kozua basango nionso ya TOYEKOLA.

Toyekola © 2022. Bisengeli banso ezali ya kobatelama