Na ndenge ya alima, biteyelo banso masengelaka kozala na esika ya bosuki oyo bamemaka bana oyo batangisaka. Wana ezali etinda munene ya eteyelo.

TOYEKOLA etangisaka bana po na komema bango na esika ya bosuki nini ?

Eyano : Toyekola etangisaka bana na likanisi ya kosala na bango Bato ya solo kolandisama na bolimboli ya ya Bomoto.
Bazala bana ya bwanya, ya botosi mpe ya mayele.

“Bwanya, botosi mpe mayele : ezali biteni misato oyo ezalisaka Bomoto.”

Nalobaki na ebandeli ete lobi ya Kongo afandi na kati ya bana na biso, na yango esengeli na biso tolakisa bango kibomoto po ete bwanya, botosi mpe mayele oyo ekozala na kati na bango esunga bango bakamba mboka lobi na lolenge oyo esengeli.

Lelo ezali mokolo ya oyo mokili ezali kokumisa batangisi.